Teksty piosenek > T > Tabu Ley Rochereau > Mokolo Nakokufa
2 436 382 tekstów, 31 387 poszukiwanych i 409 oczekujących

Tabu Ley Rochereau - Mokolo Nakokufa

Mokolo Nakokufa

Mokolo Nakokufa

Tekst dodał(a): mundele Edytuj tekst
Tłumaczenie dodał(a): brak Dodaj tłumaczenie
Teledysk dodał(a): Kaja54321 Edytuj teledysk

Tekst piosenki:

Mokolo mosusu ngai nakanisi
Naloti lokola ngai nakolala
Ah mama ha
Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, nani akolela nga
Nakoyeba te o
Tika namilela

Liwa ya zamba soki mpe liwa ya mboka
Liwa ya mpasi soki mpe liwa ya mayi
Oh mama uh
Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, ngai motu ya pauvre
Nakanisa Ida mwasi oyo nabala
Nakanisa kaka bana nabota
Nasepela kaka mpasi ya mokili ezali kotikala
Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, ngáí moto ya mbóngo
Nakanisa falánga míngi óyo natíkí
Nakanisa lopángo na bakaminyó

Nakanisa bána ngáí natínda na Mpótó
Mamá uh
Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, ngáí moto ya kwíti
Nakanisa kopó ya masanga na ngai
Nakanisa níni kaka súka ya sánzá

Ntángo namelaka ngáí na baníngá
Ah Mamá ha
Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, ngáí mwásí ya ndúmbá
Nakanisa níni káka perruque na ngá
Nakanisa níni káka na bilambá na nga

Nakolela káka African-Fiesta etíkala
Mamá
Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, nani akolela nga
Nakoyeba te o
Tika namilela

Liwa ya zamba soki mpe liwa ya mboka
Liwa ya mpasi soki mpe liwa ya mayi
Oh mama
Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, ngáí moto ya kwíti
Nakanisa kopó ya masanga na ngai
Nakanisa níni kaka súka ya sánzá

Ntángo namelaka ngáí na baníngá
Ah Mamá uh
Mokolo nakokufa

Mokolo nakokufa, ngáí mwásí ya ndúmbá
Nakanisa níni káka perruque na ngá
Nakanisa níni káka bilambá na nga

Nakolela káka African-Fiesta etíkala
Mamá
Mokolo nakokufa

 

Dodaj adnotację do tego tekstu » Historia edycji tekstu

Tłumaczenie :


Autor:

(brak)

Edytuj metrykę

Komentarze (0):

tekstowo.pl
2 436 382 tekstów, 31 387 poszukiwanych i 409 oczekujących

Największy serwis z tekstami piosenek w Polsce. Każdy może znaleźć u nas teksty piosenek, teledyski oraz tłumaczenia swoich ulubionych utworów.
Zachęcamy wszystkich użytkowników do dodawania nowych tekstów, tłumaczeń i teledysków!


Reklama | Kontakt | FAQ Polityka prywatności